Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Yisaya 55:7
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 7 Moto mabe atika nzela na ye,+ mpe moto oyo alukaka kosalela bato mabe atika makanisi na ye;+ mpe azongela Yehova mpe akoyokela ye mawa,+ azongela Nzambe na biso, mpo akolimbisa mpenza.+

  • Yirimia 18:11
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 11 “Mpe sikoyo, nabondeli yo, lobá na bato ya Yuda mpe na bato oyo bafandi na Yerusaleme ete: ‘Talá oyo Yehova alobi: “Talá nazali kobongisela bino mpasi moko boye mpe nazali kokanisela bino likanisi moko boye.+ Nabondeli bino, bóbongwana, mokomoko na bino atika nzela na ye mabe, mpe bókómisa banzela na bino mpe misala na bino malamu.”’”+

  • Yirimia 25:4
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 4 Mpe Yehova atindelaki bino basaleli na ye nyonso basakoli, azalaki kolamuka ntɔngɔntɔngɔ mpe kotinda bango, kasi boyokaki te,+ mpe bosembolaki litoi na bino mpo na koyoka te,+

  • Ezekiele 18:31
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 31 Bóbwaka mosika na bino misala na bino nyonso ya kobuka mibeko oyo bosalaki+ mpe bómizwela motema ya sika+ mpe elimo ya sika,+ mpamba te, bókufa mpo na nini,+ Ee ndako ya Yisraele?’

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto