Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Nzembo 6:maloba ya ebandeli ya loyembo-10
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • Epai ya mokambi ya nzembo na bibɛtɛlo ya bansinga na mongongo ya nse.+ Mondule ya Davidi.

      6 Ee Yehova, kopamela ngai na nkanda na yo te,+

      Mpe kosembola ngai na nkɛlɛ na yo te.+

       2 Moniselá ngai boboto, Ee Yehova, mpo nazali kobeba.+

      Bikisá ngai,+ Ee Yehova, mpo mikuwa na ngai ebulungani.

       3 Ɛɛ, molimo na ngai ebulungani mingi mpenza;+

      Mpe yo, Ee Yehova​—kino ntango nini?+

       4 Zongá,+ Ee Yehova, bikisá molimo na ngai;+

      Bikisá ngai mpo na motema boboto na yo.+

       5 Mpo na kati ya liwa batángaka nkombo na yo te;+

      Na kati ya Nkunda* nani akokumisa yo?+

       6 Nalɛmbi na kokimela na ngai;+

      Butu nyonso nazali kopɔlisa mbeto na ngai na mpisoli;+

      Nazali kotondisa esika na ngai ya kolala na mpisoli na ngai.+

       7 Liso na ngai elɛmbi na mpasi,+

      Enuni mpo na baoyo nyonso bazali banguna na ngai.+

       8 Bólongwa liboso na ngai, bino nyonso baoyo bosalaka makambo oyo eyokisaka mpasi,+

      Mpo Yehova akoyoka mpenza mongongo ya kolela na ngai.+

       9 Yehova akoyoka mpenza lilɔmbɔ na ngai mpo na koluka kondimama;+

      Yehova ye moko akondima libondeli na ngai.+

      10 Banguna na ngai nyonso bakoyoka nsɔni mingi mpenza+ mpe bakobulungana;

      Bakozonga nsima, bakoyoka nsɔni na mbala moko.+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto