-
Nzembo 38:maloba ya ebandeli ya loyembo-22Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
-
-
Mondule ya Davidi, mpo na kokanisa.
3 Eteni ata moko ya malamu ezali te na nzoto na ngai mpo na makaneli na yo.+
Mikuwa na ngai ezali na kimya te mpo na lisumu na ngai.+
4 Mpo mabunga na ngai eleki na motó na ngai;+
Lokola mokumba moko ya kilo, yango eleki ngai na kilo.+
7 Mpo bangɛi na ngai ezali kozika bipai nyonso,
Mpe eteni ata moko ya malamu ezali te na nzoto na ngai.+
9 Ee Yehova, mposa na ngai nyonso ezali liboso na yo,
Mpe kokimela na ngai ebombami liboso na yo te.+
10 Motema na ngai ebɛti makasimakasi, nguya na ngai etiki ngai,
Mpe pole ya miso na ngai ezali elongo na ngai lisusu te.+
11 Bato oyo balingaka ngai mpe baninga na ngai, batɛlɛmi mosika na bolɔzi na ngai,+
Mpe bato oyo bayebani na ngai malamumalamu batɛlɛmi mosika.+
12 Kasi baoyo balukaka molimo na ngai bazali kotya mitambo,+
Mpe baoyo basalaka mpo likama ezwa ngai balobeli mikakatano,+
Mpe mokolo mobimba, bazali kaka koloba bokosi na nse nse.+
13 Ngai nazalaki koyoka te lokola moto oyo akufá matoi;+
Mpe nazalaki kofungola monɔkɔ na ngai te lokola moto oyo alobaka te.+
14 Mpe nakómaki lokola moto oyo azalaki koyoka te,
Mpe na monɔkɔ na ngai, maloba ya kozongisela bango ezalaki te.
16 Mpo nalobaki ete: “Soki te bakosepela mpo na ngai;+
Ntango lokolo na ngai ekotengatenga,+ bakotombolela ngai mpenza mapeka.”+
19 Mpe banguna na ngai oyo bazali na bomoi bakómaki makasi,+
Mpe baoyo bazali koyina ngai kaka mpamba bakómaki mingi.+
-