Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Kobima 29:39
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 39 Mpe okopesa mwana-mpate moko ya mobali na ntɔngɔ,+ mpe okopesa mwana-mpate mosusu ya mobali na mpokwa, liboso molili ekɔta.*+

  • Mitángo 28:3
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 3 “Mpe osengeli koloba na bango ete: ‘Talá likabo oyo etumbami na mɔtɔ oyo bokopesa Yehova: bana-mpate mibale ya mibali, oyo ezangi mbeba, oyo ezali na mbula moko, mokolo na mokolo ezala likabo ya kotumba ya ntango nyonso.+

  • 2 Ntango 2:4
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 4 talá, nazali kotongela+ nkombo+ ya Yehova Nzambe na ngai ndako mpo na kosantisela+ ye yango, mpo na kotumba mpaka ya malasi ya nsolo kitoko+ liboso na ye, ná mampa ya ntango nyonso oyo bamatisamatisá likoló ya mosusu+ ná makabo ya kotumba na ntɔngɔ mpe na mpokwa,+ na basabata,+ na basanza ya sika+ mpe na bileko ya fɛti+ ya Yehova Nzambe na biso. Yango ekozala mokumba ya Yisraele mpo na ntango oyo etyami ndelo te.+

  • 2 Ntango 31:3
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 3 Mpe ezalaki na likabo ya mokonzi, oyo euti na biloko na ye moko,+ mpo na makabo ya kotumba,+ mpo na makabo ya kotumba ya ntɔngɔ+ mpe ya mpokwa, mpe lisusu makabo ya kotumba mpo na basabata+ mpe mpo na basanza ya sika+ mpe mpo na bileko ya bafɛti,+ na kolanda oyo ekomami na mobeko ya Yehova.+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto