5 Mpe talá, nazali na likanisi ya kotongela nkombo ya Yehova Nzambe na ngai ndako,+ ndenge Yehova alakaki tata na ngai Davidi ete: ‘Mwana na yo oyo nakofandisa na kiti na yo ya bokonzi na esika na yo, ye nde akotongela nkombo na ngai ndako.’+
10 Ye nde akotongela nkombo na ngai ndako,+ mpe ye akozala mwana+ na ngai, mpe ngai nakozala tata+ na ye. Mpe nakopika makasi kiti ya bokonzi+ na ye likoló ya Yisraele mpo na ntango oyo etyami ndelo te.’