18 Na mokolo yango, Yehova asalaki kondimana ná Abrama,+ na maloba oyo: “Nakopesa momboto na yo mokili oyo,+ banda na ebale ya Ezipito* tii na ebale monene, ebale Efrate:+
31 “Mpe nakotya bandelo na yo banda na Mbu Motane tii na mbu ya Bafilistia mpe banda na esobe tii na Ebale;+ mpamba te nakopesa bato oyo bafandi na mokili yango na lobɔkɔ na bino, mpe okobengana mpenza bango liboso na yo.+