24 Kasi mokonzi alobaki na Arauna ete: “Te, kasi nakosomba yango mpenza kosomba epai na yo na mbongo;+ mpe nakokabela Yehova, Nzambe na ngai, bambeka ya kotumba oyo ezwami ofele te.”+ Na yango, Davidi asombaki+ esika yango ya kotutatuta mbuma mpe bangɔmbɛ na bashekele ya palata ntuku mitano (50).