Balevi 9:24 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 24 mpe mɔtɔ ebimaki liboso ya Yehova+ mpe ebandaki kozikisa likabo ya kotumba mpe biteni ya mafutamafuta likoló ya etumbelo. Ntango bato nyonso bamonaki yango, babandaki koganga+ mpe bakweaki bilongi na nse. 1 Bakonzi 18:38 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 38 Bongo mɔtɔ+ ya Yehova ekitaki mpe elyaki likabo ya kotumba+ mpe nkoni mpe mabanga mpe putulu, mpe emɛlaki mai oyo ezalaki na kati ya talase.+ 2 Ntango 7:1 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 7 Bongo ntango kaka Salomo asilisaki kobondela,+ mɔtɔ eutaki na likoló+ ekiti mpe ezikisaki likabo ya kotumba+ mpe bambeka, mpe nkembo ya Yehova+ etondaki na ndako yango.
24 mpe mɔtɔ ebimaki liboso ya Yehova+ mpe ebandaki kozikisa likabo ya kotumba mpe biteni ya mafutamafuta likoló ya etumbelo. Ntango bato nyonso bamonaki yango, babandaki koganga+ mpe bakweaki bilongi na nse.
38 Bongo mɔtɔ+ ya Yehova ekitaki mpe elyaki likabo ya kotumba+ mpe nkoni mpe mabanga mpe putulu, mpe emɛlaki mai oyo ezalaki na kati ya talase.+
7 Bongo ntango kaka Salomo asilisaki kobondela,+ mɔtɔ eutaki na likoló+ ekiti mpe ezikisaki likabo ya kotumba+ mpe bambeka, mpe nkembo ya Yehova+ etondaki na ndako yango.