-
Kolimbola Mibeko 12:21Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
-
-
21 Soki esika oyo Yehova Nzambe na yo akopona mpo na kotya nkombo+ na ye kuna ekozala mosika na yo, osengeli koboma nyama oyo euti na etonga na yo ya bangɔmbɛ to nyama oyo euti na etonga na yo ya bampate oyo Yehova apesi yo, kaka ndenge napesi yo mitindo, mpe osengeli kolya na kati ya baporte na yo ntango nyonso oyo molimo na yo ekozala na mposa na yango.+
-
-
1 Bakonzi 9:3Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
-
-
3 Mpe Yehova alobaki na ye lisusu boye: “Nayoki libondeli+ na yo mpe lilɔmbɔ na yo mpo na koluka kondimama, oyo osɛngi kondimama liboso na ngai. Nasantisi+ ndako oyo otongi na ndenge natye nkombo+ na ngai wana mpo na ntango oyo etyami ndelo te; mpe miso+ na ngai ná motema na ngai ekozala mpenza wana ntango nyonso.+
-