18 “Okotya basambisi+ mpe bakapita+ na kati ya baporte na yo nyonso oyo Yehova Nzambe na yo azali kopesa yo engebene mabota na yo, mpe bango basengeli kosambisa bato na lisambisi ya boyengebene.
8 Na Yerusaleme mpe, Yehoshafate atyaki Balevi+ mosusu mpe banganga-nzambe+ ná bankumu mosusu ya bandako ya batata+ ya Yisraele mpo na kosambisa+ na nkombo ya Yehova mpe mpo na kosambisa makambo+ ya bato oyo bafandi na Yerusaleme.