31 Bango moko mpe babwakaki mbɛsɛ+ se ndenge bandeko na bango bana ya Arona basalaki liboso ya mokonzi Davidi, liboso ya Zadoke ná Ahimeleke, mpe liboso ya bankumu ya bandako ya banganga-nzambe mpe ya Balevi. Mpo na oyo etali bandako ya batata,+ nkumu azalaki ndenge moko na leki na ye.