9 mpe osengeli kokende epai ya banganga-nzambe,+ Balevi, mpe epai ya mosambisi+ oyo akozala na mosala na mikolo yango, mpe osengeli kotunatuna, mpe basengeli koyebisa yo liloba ya ekateli ya lisambisi.+
8 Na Yerusaleme mpe, Yehoshafate atyaki Balevi+ mosusu mpe banganga-nzambe+ ná bankumu mosusu ya bandako ya batata+ ya Yisraele mpo na kosambisa+ na nkombo ya Yehova mpe mpo na kosambisa makambo+ ya bato oyo bafandi na Yerusaleme.