Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • 2 Ntango 16:9
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 9 Mpo na Yehova, miso na ye+ ezali kotambolatambola na mabele mobimba+ mpo na komonisa makasi na ye mpo na bolamu ya baoyo motema+ na bango ezali mobimba epai na ye. Osali bozoba+ na likambo oyo, yango wana kobanda sikoyo bitumba ekoyela yo.”+

  • Nzembo 18:32
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 32 Nzambe ya solo nde Moto azali kokanga ngai loketo na nguya ya bomoi,+

      Mpe akosala ete nzela na ngai ezala ya kokoka,+

  • Nzembo 28:8
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    •  8 Yehova azali makasi ya bato na ye,+

      Mpe azali esika makasi ya libateli ya lobiko monene ya moto na ye oyo atyami mafuta.+

  • Yisaya 40:29
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 29 Apesaka nguya na moto oyo alɛmbi;+ mpe moto oyo azangi makasi,+ atondisaka ye na nguya.

  • 1 Petro 4:11
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 11 Soki moto azali koloba, aloba lokola nde ezali maloba mosantu+ ya Nzambe; soki moto azali kosalela bamosusu,+ asalela bango lokola moto oyo azali kotalela kaka makasi oyo Nzambe azali kopesa;+ mpo ete na makambo nyonso Nzambe azwa nkembo+ na nzela ya Yesu Kristo. Nkembo+ mpe nguya ezali ya ye libela na libela. Amen.

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto