Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Ebandeli 35:22
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 22 Mpe esalemaki boye: ntango Yisraele azalaki kofanda na bahema+ na mokili yango, Rubene akendaki kolala na Bila makango ya tata na ye, mpe Yisraele ayokaki likambo yango.+

      Bongo bana mibali ya Yakobo bazalaki zomi na mibale.

  • Ebandeli 49:4
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 4 Ozangaki komipekisa lokola mai, kozala moto ya lokumu te,+ mpo omataki na mbeto ya tata na yo.+ Na Ntango yango, okómisaki mbeto na ngai eloko mpamba.+ Amataki na yango!

  • Balevi 20:11
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 11 Mpe mobali oyo alali na mwasi ya tata na ye, amoni bolumbu ya tata na ye.+ Bango mibale basengeli mpenza kobomama. Makila na bango ezali na motó na bango.

  • Kolimbola Mibeko 27:20
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 20 “‘Alakelama mabe moto oyo alali na mwasi ya tata na ye, mpamba te alongoli elamba ya tata na ye.’+ (Mpe bato nyonso basengeli koloba: ‘Amen!’)

  • 1 Bakorinti 5:1
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 5 Ya solo, nsango eyokani ete pite+ ezali na kati na bino, mpe pite ya ndenge oyo ezalaka ata kutu te epai ya bikólo, ete mobali moko akamati mwasi ya tata na ye.+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto