34 Mpe azwaki zemi lisusu mpe abotaki mwana mobali mpe alobaki ete: “Sikoyo, na mbala oyo, mobali na ngai akokangama na ngai, mpamba te naboteli ye bana mibali misato.” Yango wana babengaki ye nkombo Levi.+
16 Mpe talá bankombo ya bana mibali ya Levi,+ ndenge mabota na bango elandanaki:+ Gereshone ná Kohate mpe Merari.+ Mpe bambula ya bomoi ya Levi ezalaki mbula nkama moko na ntuku misato na nsambo (137).