Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Basambisi 1:27
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 27 Mpe Manase+ azwaki te Bete-sheane+ ná basité oyo esimbami na yango, Taanake+ ná basité oyo esimbami na yango, bato oyo bafandi na Dore+ ná basité oyo esimbami na yango, bato oyo bafandi na Ibleame+ ná basité oyo esimbami na yango, mpe bato oyo bafandi na Megido+ ná basité oyo esimbami na yango, kasi Bakanana batingamaki kofanda na mokili yango.+

  • 1 Bakonzi 9:15
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 15 Talá sikoyo lisolo ya bato oyo babengisamaki mpo na kosala mosala na makasi,+ baoyo Mokonzi Salomo abengisaki mpo na kotonga ndako ya Yehova+ mpe ndako na ye moko mpe Mwa Ngomba,+ efelo+ ya Yerusaleme, Hazore,+ Megido+ ná Gezere.+

  • 2 Bakonzi 23:29
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 29 Na mikolo na ye, Farao Neko+ mokonzi ya Ezipito amataki epai ya mokonzi ya Asiri penepene na ebale Efrate,+ mpe Mokonzi Yosiya akendaki kokutana na ye;+ kasi abomaki Yosiya+ na Megido,+ ntango kaka amonaki ye.

  • Zekaria 12:11
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 11 Na mokolo yango, koganga ekozala monene na Yerusaleme, lokola koganga ya Hadadrimone na lobwaku ya patatalu ya Megido.+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto