9 Mpe Davidi akómaki kofanda na esika yango ya makasi ya libateli, mpe bakómaki kobenga yango Sité ya Davidi; bongo Davidi abandaki kotonga na zingazinga nyonso wana, banda na Mwa Ngomba+ mpe na kati.
10 Mpe Davidi alingaki te koya na sanduku ya Yehova epai na ye, na Sité ya Davidi.+ Yango wana Davidi atindaki bálekisa yango na ndako ya Obede-edome+ moto ya Gate.+