27 Nzokande, Davidi alobaki na motema na ye ete: “Sikoyo, lobɔkɔ ya Saulo ekoboma ngai mokolo mosusu. Likambo mosusu ya kosala ezali te, malamu nakima+ na mokili ya Bafilistia;+ mpe Saulo akolɛmba koluka ngai na teritware mobimba ya Yisraele,+ mpe ya solo, nakobika na lobɔkɔ na ye.”