42 Soki Nzambe ya tata na ngai,+ Nzambe ya Abrahama mpe Nsɔmɔ ya Yisaka,+ azalaka na ngámbo na ngai te, olingaki sikoyo kotika ngai nakende mabɔkɔ mpamba. Nzambe amoni mawa na ngai mpe mosala makasi ya mabɔkɔ na ngai; yango wana apamelaki yo na butu oyo.”+
23 Mpe Yehova akozongisela moto na moto boyengebene+ na ye mpe bosembo na ye, mpo Yehova apesaki yo lelo na lobɔkɔ na ngai, mpe ngai naboyaki kosembolela moto oyo Yehova atye mafuta+ lobɔkɔ na ngai.