Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Ebandeli 49:8
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 8 “Kasi yo, Yuda,+ bandeko na yo bakokumisa yo.+ Lobɔkɔ na yo ekosimba nkingo ya banguna na yo.+ Bana ya tata na yo bakofukama bilongi na nse liboso na yo.+

  • Ebandeli 49:10
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 10 Lingenda ya bokonzi ekolongwa na Yuda te,+ mpe lingenda ya komanda na kati ya makolo na ye te, kino Shilo akoya;+ mpe bato ya bikólo bakotosa ye.+

  • 2 Ntango 30:12
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 12 Lobɔkɔ ya Nzambe ya solo ezalaki mpe na Yuda mpo na kopesa bango motema kaka moko+ mpo bákokisa mitindo+ ya mokonzi mpe ya bankumu na oyo etali Yehova.+

  • Nzembo 110:3
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    •  3 Bato na yo+ bakomipesa na bolingo na bango moko+ na mokolo oyo okokamba limpinga ya basoda na yo na etumba.+

      Na nkembo mingi ya bosantu,+

      Ozali na etuluku na yo ya bilenge lokola matangá ya mamwɛ+ ya kotana ya ntɔngɔ.

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto