Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Kobima 40:15
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 15 Mpe osengeli kotya bango mafuta kaka ndenge otyaki tata na bango mafuta,+ bongo basengeli kosalela ngai mosala ya banganga-nzambe, mpe kotyama oyo batyami mafuta esengeli kopesa bango nzela ya kosala mosala ya bonganga-nzambe ntango nyonso, mpo na ntango oyo etyami ndelo te, na boumeli ya mabota na bango.”+

  • Mitángo 8:15
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 15 Mpe na nsima, Balevi bakokɔta mpo na kosala na hema ya kokutana.+ Bongo osengeli kopɛtola bango mpe kosala ete báningana epai na epai lokola likabo ya koningisa.+

  • Mitángo 18:2
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 2 Mpe bɛlɛmisá lisusu bandeko na yo ya mibali ya libota ya Levi, etuluka ya tata na yo, elongo na yo, mpo básangana na yo mpe básalela yo,+ yo ná bana na yo ya mibali elongo na yo, liboso ya hema ya Litatoli.+

  • Kolimbola Mibeko 21:5
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 5 “Mpe banganga-nzambe bana ya Levi basengeli kobɛlɛma, mpamba te bango nde bato Yehova Nzambe na yo aponá mpo na kosalela ye+ mpe kopambola+ na nkombo ya Yehova mpe monɔkɔ na bango nde ekosilisa kowelana nyonso oyo etali likambo nyonso ya koboma moto.+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto