1 Bakonzi 22:14 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 14 Kasi Mikaya alobaki boye: “Lokola Yehova azali solo na bomoi,+ oyo Yehova akoloba na ngai, yango nde nakoloba.”+ Yirimia 23:28 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 28 Mosakoli oyo azali na ndɔtɔ, ayebisa ndɔtɔ yango; kasi ye oyo azali na liloba na ngai, aloba liloba na ngai na bosolo.”+ “Matiti ezali nini liboso ya mbuma?”+ yango nde liloba ya Yehova. Yirimia 42:4 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 4 Na yango, mosakoli Yirimia alobaki na bango ete: “Nayoki. Talá nazali kobondela Yehova Nzambe na bino engebene maloba na bino;+ mpe ekosalema mpenza boye: liloba nyonso oyo Yehova akopesa bino lokola eyano nakoyebisa bino.+ Nakobombela bino liloba te.”+ Misala 20:27 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 27 mpo namipekisaki te koyebisa bino mokano mobimba+ ya Nzambe.
14 Kasi Mikaya alobaki boye: “Lokola Yehova azali solo na bomoi,+ oyo Yehova akoloba na ngai, yango nde nakoloba.”+
28 Mosakoli oyo azali na ndɔtɔ, ayebisa ndɔtɔ yango; kasi ye oyo azali na liloba na ngai, aloba liloba na ngai na bosolo.”+ “Matiti ezali nini liboso ya mbuma?”+ yango nde liloba ya Yehova.
4 Na yango, mosakoli Yirimia alobaki na bango ete: “Nayoki. Talá nazali kobondela Yehova Nzambe na bino engebene maloba na bino;+ mpe ekosalema mpenza boye: liloba nyonso oyo Yehova akopesa bino lokola eyano nakoyebisa bino.+ Nakobombela bino liloba te.”+