5 Bongo Davidi ná ndako mobimba ya Yisraele bazalaki kosepela liboso ya Yehova, ná mitindo nyonso ya bibɛtɛlo ya miziki oyo esalemi na nzete ya jenevriye, ná banzɛnzɛ,+ bibɛtɛlo ya bansinga+ ná bambonda mike,+ bangɔngɛ ná basɛmbalɛ.+
12 Mpe na mabaya yango ya banzete ya algume, mokonzi asalaki bisimbeli mpo na ndako ya Yehova+ mpe mpo na ndako ya mokonzi, bakisa mpe banzɛnzɛ+ mpe bibɛtɛlo ya bansinga+ mpo na bayembi. Mabaya ya banzete ya algume lokola oyo wana eyá lisusu te mpe emonaná lisusu te tii na mokolo ya lelo.