Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Masese 10:7
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 7 Kokanisa makambo ya moyengebene ebimisaka lipamboli,+ kasi nkombo ya bato mabe ekopɔla.+

  • Masese 11:10
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 10 Mpo na motema malamu ya bayengebene, sité ezalaka na esengo makasi,+ kasi ntango bato mabe bakufi, koganga ya esengo ezalaka.+

  • Masese 29:2
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 2 Ntango bayengebene bakómi mingi, bato basepelaka;+ kasi ntango moto mabe azali koyangela, bato bamilelaka.+

  • Mosakoli 8:10
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 10 Kasi, atako ezali bongo, namoni bato mabe bazali kokundama,+ ndenge bakɔtaki mpe ndenge babimaki na esika mosantu+ mpe babosanaki bango na engumba esika basalaki bongo.+ Yango mpe ezali mpamba.

  • Yirimia 22:18
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 18 “Na yango talá oyo Yehova alobi mpo na Yehoyakime+ mwana ya Yosiya, mokonzi ya Yuda: ‘Bakolela ye te ete: “Mawa, ndeko na ngai ya mobali! Mpe mawa, ndeko na ngai ya mwasi!” Bakolela ye te ete: “Mawa, Ee nkolo! Mpe mawa, lokumu na ye!”+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto