Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • 1 Bakonzi 7:15
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 15 Na nsima, anyangwisaki motako mpo na kosala makonzí mibale,+ likonzí mokomoko ezalaki na bolai ya mapeko zomi na mwambe, mpe esengelaki nsinga moko ya mapeko zomi na mibale mpo na komeka bonene ya mokomoko ya makonzí yango mibale.+

  • 1 Bakonzi 7:21
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 21 Mpe atɛlɛmisaki makonzí+ ya ndako ya kokɔtela+ ya tempelo. Bongo atɛlɛmisaki likonzí ya lobɔkɔ ya mobali mpe apesaki yango nkombo Yakine, mpe na nsima, atɛlɛmisaki likonzí ya lobɔkɔ ya mwasi mpe apesaki yango nkombo Boaze.

  • 2 Bakonzi 25:13
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 13 Mpe makonzí+ ya motako oyo ezalaki na ndako ya Yehova, mpe bashario+ mpe mbu+ ya motako oyo ezalaki na ndako ya Yehova, Bakaladea babukabukaki yango mpe bamemaki motako na yango na Babilone.+

  • 2 Ntango 4:12
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 12 Makonzí+ mibale mpe mitó ya zolongano+ na nsɔngɛ ya makonzí yango mibale mpe biloko mibale oyo basalá lokola monyama+ mpo na kozipa mitó mibale wana ya zolongano oyo ezalaki na nsɔngɛ ya makonzí yango

  • Emoniseli 3:12
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 12 “‘Moto oyo alongi—nakokómisa ye likonzí+ na tempelo+ ya Nzambe na ngai,+ mpe akobima lisusu te, mpe nakokoma likoló na ye nkombo ya Nzambe na ngai mpe nkombo ya engumba ya Nzambe na ngai, Yerusaleme ya sika+ oyo ezali kouta na likoló epai ya Nzambe na ngai mpe kokita, mpe nkombo na ngai ya sika.+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto