1 Bakonzi 3:13 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 13 Mpe lisusu, makambo oyo osɛngi te, nakopesa yo+ yango, ezala bozwi+ ná nkembo, bongo ekozala na moto moko te kati na bakonzi oyo akozala lokola yo, mikolo na yo nyonso.+ Nzembo 1:3 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 3 Mpe akokóma mpenza lokola nzete oyo elonami pene na mikɛli ya mai,+Oyo epesaka mbuma na yango na eleko na yango+Mpe oyo nkasa na yango ekaukaka te,+Mpe nyonso oyo azali kosala ekolonga.+ Masese 10:22 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 22 Lipamboli ya Yehova—yango nde ekómisaka moto mozwi,+ mpe abakisaka mpasi ata moko te na yango.+
13 Mpe lisusu, makambo oyo osɛngi te, nakopesa yo+ yango, ezala bozwi+ ná nkembo, bongo ekozala na moto moko te kati na bakonzi oyo akozala lokola yo, mikolo na yo nyonso.+
3 Mpe akokóma mpenza lokola nzete oyo elonami pene na mikɛli ya mai,+Oyo epesaka mbuma na yango na eleko na yango+Mpe oyo nkasa na yango ekaukaka te,+Mpe nyonso oyo azali kosala ekolonga.+