7 Bongo alobaki na Yuda boye: “Tótonga bingumba oyo mpe tózinga yango na bifelo+ ná manɔ́ngi,+ baporte ya bizipeli mibale ná bikangiseli.+ Mokili ezali naino na mabɔkɔ na biso, mpo toluki Yehova Nzambe na biso.+ Toluki, mpe apesi biso bopemi epai na epai.”+ Mpe bazalaki kotonga mpe kolonga.+