Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • 2 Ntango 11:12
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 12 atyaki banguba ya minene+ mpe makɔnga+ na bingumba ndenge na ndenge; mpe azalaki kokómisa yango makasi mpenza na ndenge moko ya kosakana te. Mpe Yuda ná Benyamina etikalaki ya ye.

  • 2 Ntango 14:8
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 8 Mpe Asa akómaki na limpinga ya basoda oyo bazalaki komema nguba ya monene+ mpe likɔnga:+ bato nkóto nkama misato (300 000) na Yuda.+ Mpe na Benyamina: baoyo bazalaki komema nguba ya moke mpe kogumba litimbo+ bazalaki nkóto nkama mibale na ntuku mwambe (280 000).+ Baoyo wana nyonso bazalaki bilombe, mibali ya nguya.

  • 2 Ntango 25:5
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 5 Mpe Amazia ayanganisaki Yuda mpe atɛlɛmisaki bango na kolanda ndako ya bankɔkɔ na bango,+ na kolanda bakonzi ya bato nkóto nkóto+ mpe bakonzi ya bato nkama nkama+ mpo na Yuda mobimba mpe Benyamina; mpe na nsima akomaki nkombo na bango banda na mbula ntuku mibale (20)+ tii na likoló, mpe nsukansuka, amonaki ete bazali bato nkóto nkama misato (300 000), bato ya makasi koleka oyo bakoki kokende na mosala ya soda, oyo bayebi kosalela likɔnga+ mpe nguba monene.+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto