Basambisi 20:16 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 16 Na bato nyonso wana, ezalaki na mibali nkama nsambo (700) ya makasi koleka, bato oyo basalelaka lobɔkɔ ya mwasi.+ Mokomoko na bango azalaki mobwaki mabanga na bilingongo,+ oyo soki abwakeli ata mwa eloko moke lokola nsuki libanga, azalaki kozanga yango te. 1 Samwele 17:49 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 49 Na nsima, Davidi akɔtisaki lobɔkɔ na ye na libenga na ye, azwaki libanga moko kuna mpe abwakaki yango, bongo abɛtaki+ Mofilistia yango na elongi, mpe libanga ekɔtaki na kati ya elongi na ye, mpe akweaki elongi na nse.+
16 Na bato nyonso wana, ezalaki na mibali nkama nsambo (700) ya makasi koleka, bato oyo basalelaka lobɔkɔ ya mwasi.+ Mokomoko na bango azalaki mobwaki mabanga na bilingongo,+ oyo soki abwakeli ata mwa eloko moke lokola nsuki libanga, azalaki kozanga yango te.
49 Na nsima, Davidi akɔtisaki lobɔkɔ na ye na libenga na ye, azwaki libanga moko kuna mpe abwakaki yango, bongo abɛtaki+ Mofilistia yango na elongi, mpe libanga ekɔtaki na kati ya elongi na ye, mpe akweaki elongi na nse.+