15 “Mpe ekosalema mpenza boye: soki okoyoka te mongongo ya Yehova Nzambe na yo na kokebáká ete osalela mitindo na ye nyonso mpe mibeko na ye oyo nazali kopesa yo lelo, bilakeli mabe oyo nyonso esengeli kokitela yo mpe kozwa yo:+
18 Mpe nsukansuka, batikaki ndako ya Yehova Nzambe ya bankɔkɔ na bango mpe babandaki kosalela banzete ya losambo+ mpe bikeko,+ bongo nkanda ya Nzambe eyelaki Yuda ná Yerusaleme mpo na ngambo na bango wana.+