17 Na yango, Balevi batyaki Hemane+ mwana ya Yoele mpe, na kati ya bandeko na ye, Asafe+ mwana ya Berekia; mpe, na kati ya bandeko na bango bana ya Merari, Etane+ mwana ya Kushaya;
2 Na bana ya Asafe: Zakure, Yozefe,+ Netania ná Asharela,+ bana ya Asafe oyo Asafe+ azalaki kokamba, ye moto oyo azalaki kosakola na kolanda litambwisi ya mokonzi.