Masese 8:13 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 13 Kobanga Yehova elakisi koyina mabe.+ Komikumisa ná lolendo,+ nzela mabe ná monɔkɔ oyo elobaka makambo ya kilikili,+ nayiná yango. Masese 16:18 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 18 Lolendo ezalaka liboso ya kokwea,+ mpe elimo ya komikumisa liboso ya kobɛta libaku.+ Masese 29:23 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 23 Lolendo ya moto ya mabele ekokitisa ye,+ kasi ye oyo azali na elimo ya komikitisa akozwa nkembo.+ Bagalatia 6:3 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 3 Mpo soki moto akanisi ete azali moto ya ntina ntango azali moto mpamba,+ azali kokosa makanisi na ye moko. 1 Petro 5:5 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 5 Ndenge moko mpe, bino bilenge, bómikitisaka+ liboso ya mikóló. Nzokande bino nyonso bólata ezaleli ya komikitisa na kati na bino,+ mpo Nzambe atɛmɛlaka bato ya lolendo, kasi amoniselaka bato ya komikitisa boboto monene.+
13 Kobanga Yehova elakisi koyina mabe.+ Komikumisa ná lolendo,+ nzela mabe ná monɔkɔ oyo elobaka makambo ya kilikili,+ nayiná yango.
3 Mpo soki moto akanisi ete azali moto ya ntina ntango azali moto mpamba,+ azali kokosa makanisi na ye moko.
5 Ndenge moko mpe, bino bilenge, bómikitisaka+ liboso ya mikóló. Nzokande bino nyonso bólata ezaleli ya komikitisa na kati na bino,+ mpo Nzambe atɛmɛlaka bato ya lolendo, kasi amoniselaka bato ya komikitisa boboto monene.+