-
Nzembo 9:16Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
-
-
16 Yehova ayebani mpo na ekateli ya lisambisi oyo azwi.+
Moto mabe akangami na motambo oyo asalaki na mabɔkɔ na ye moko.+
Higayone. Sela.
-
Danyele 4:25Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
-
-
25 Mpe bakobengana yo kati na bato, mpe okofanda esika moko na banyama ya zamba,+ mpe bakopesa yo matiti olya lokola bangɔmbɛ;+ mpe mamwɛ ya likoló ekopɔlisa yo, mpe okolekisa ntango nsambo,+ tii okoyeba ete Oyo-Aleki-Likoló azali Moyangeli na bokonzi ya bato,+ mpe ete apesaka yango na moto oyo ye alingi kopesa.+
-
-
-