3 Na mokolo ya zomi na minei ya sanza oyo, na mpokwa, liboso molili ekɔta,*+ bosengeli kobongisa yango na ntango na yango oyo etyamá. Bosengeli kobongisa yango na kolanda mibeko na yango nyonso mpe ndenge nyonso oyo basalaka yango.”+
10 Mpe bana ya Yisraele bakobaki kofanda na kaa na Gilgale, mpe basalaki elekeli na mpokwa ya mokolo ya zomi na minei ya sanza yango,+ na mokili patatalu oyo ekauká ya Yeriko.