-
2 Bakonzi 18:14Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
-
-
14 Bongo Hizikiya mokonzi ya Yuda atindelaki mokonzi ya Asiri bato na Lakishi, na maloba oyo: “Nasali lisumu. Zongá, tiká kobunda na ngai. Nyonso oyo okokatela ngai, nakopesa yango.”+ Na yango, mokonzi ya Asiri akatelaki Hizikiya mokonzi ya Yuda talanta nkama misato (300) ya palata+ mpe talanta ntuku misato (30) ya wolo.
-
-
2 Ntango 27:5Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
-
-
5 Mpe abundaki na mokonzi ya bana ya Amone+ mpe nsukansuka alekaki bango na makasi, bongo bana ya Amone bapesaki ye na mbula yango talanta nkama moko (100) ya palata, korosi+ nkóto zomi (10 000) ya blé+ mpe nkóto zomi ya ɔrje.+ Yango nde oyo bana ya Amone bafutaki ye, mpe lisusu na mbula ya mibale mpe ya misato.+
-