20 Mpamba te, mpo na nkanda+ ya Yehova, likambo yango esalemaki na Yerusaleme mpe na Yuda, tii alongolaki bango na miso na ye.+ Mpe Zidikiya abandaki kotombokela mokonzi ya Babilone.+
3 Mpamba te, mpo na nkanda ya Yehova, likambo yango esalemaki na Yerusaleme mpe na Yuda, tii alongolaki bango liboso ya elongi na ye.+ Mpe Zidikiya abandaki kotombokela mokonzi ya Babilone.+
15 Kasi, nsukansuka, atombokelaki+ ye na ndenge atindaki bamemi-nsango na ye na Ezipito, mpo epesa ye bampunda+ mpe bato ebele. Akolonga? Akobika, ye oyo azali kosala makambo ya boye, mpe ye oyo abuki kondimana? Akobika mpenza?’+