Kolimbola Mibeko 2:8 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 8 Bongo tolekaki mosika na bandeko na biso, bana ya Esau,+ oyo bafandi na Seire, mosika na nzela ya Araba,+ na Elate mpe na Ezione-gebere.+ “Na nsima, tobalukaki mpe tolekaki na nzela ya esobe ya Moabe.+ 2 Bakonzi 14:22 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 22 Ye nde atongaki Elate+ mpe azongiselaki yango Yuda nsima ya kolala ya mokonzi esika moko na bankɔkɔ na ye. 2 Bakonzi 16:6 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 6 Na ntango yango, Rezine mokonzi ya Siri azongisaki Elate+ epai ya Edome, nsima na yango, alongolaki Bayuda na Elate; bongo Baedome bakɔtaki na Elate mpe bafandá wana tii na mokolo ya lelo.
8 Bongo tolekaki mosika na bandeko na biso, bana ya Esau,+ oyo bafandi na Seire, mosika na nzela ya Araba,+ na Elate mpe na Ezione-gebere.+ “Na nsima, tobalukaki mpe tolekaki na nzela ya esobe ya Moabe.+
22 Ye nde atongaki Elate+ mpe azongiselaki yango Yuda nsima ya kolala ya mokonzi esika moko na bankɔkɔ na ye.
6 Na ntango yango, Rezine mokonzi ya Siri azongisaki Elate+ epai ya Edome, nsima na yango, alongolaki Bayuda na Elate; bongo Baedome bakɔtaki na Elate mpe bafandá wana tii na mokolo ya lelo.