-
Kolimbola Mibeko 13:5Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
-
-
5 Mpe mosakoli+ yango to molɔti ndɔtɔ yango oyo alɔti ndɔtɔ asengeli kobomama,+ mpamba te alobeli likambo ya kotombokela Yehova Nzambe na bino, oyo abimisaki bino na mokili ya Ezipito mpe asikoli yo na ndako ya boombo, mpo na kopɛngwisa yo na nzela oyo Yehova Nzambe na yo apesi yo mitindo otambola+ na yango; mpe osengeli kolongola oyo ezali mabe epai na yo.+
-
-
1 Bakonzi 12:16Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
-
-
16 Ntango Yisraele mobimba bamonaki ete mokonzi ayokelaki bango te, bato bayanolaki mokonzi boye: “Likabo nini tozali na yango na makambo etali Davidi?+ Mpe tozali na libula moko te na makambo etali mwana ya Yese. Ee Yisraele, kende epai ya banzambe na yo.+ Sikoyo, talelá makambo ya ndako na yo moko, Ee Davidi!”+ Na yango, Yisraele babandaki kokende na bahema na bango.
-