7 Lisusu, na mikolo ya Artazerezese, Bishilame, Mitredate, Tabeele ná baninga na ye mosusu ya mosala bakomelaki Artazerezese mokonzi ya Perse mokanda, mpe mokanda yango ekomamaki na makomi ya Aramɛyɛ+ mpe ebongolamaki na monɔkɔ ya Aramɛyɛ.
23 Bongo nsima ya kotánga maloba ya mokanda ya mokonzi Artazerezese liboso ya Rehume+ ná mokomeli Shimeshai+ ná baninga na bango mosusu ya mosala,+ bakendaki mbangu na Yerusaleme epai ya Bayuda mpe basalelaki bibundeli mpo na kopekisa bango mosala.+
11 Lisusu, banguna na biso bazalaki kaka koloba ete: “Bakoyeba+ te mpe bakomona te tii tokokóma na kati na bango, mpe tokoboma mpenza bango mpe tokosukisa mosala yango.”