Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Ezera 6:14
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 14 Mpe mikóló+ ya Bayuda bazalaki kotonga+ mpe kokende liboso mpo balendisamaki na maloba ya esakweli ya mosakoli Hagai+ ná Zekaria+ mwana ya mwana ya Ido;+ batongaki mpe basilisaki yango na etinda ya Nzambe ya Yisraele+ mpe na etinda ya Siruse+ ná Dariuse+ ná Artazerezese+ mokonzi ya Perse.

  • Hagai 2:4
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 4 “‘Kasi sikoyo, Ee Zerubabele, zalá makasi,’ yango nde liloba ya Yehova, ‘mpe zalá makasi,+ Ee Yosua mwana ya Yehozadake nganga-nzambe monene.’

      “‘Mpe bino nyonso bato ya mboka oyo, bózala makasi mpe bósala mosala,’+ yango nde liloba ya Yehova.

      “‘Mpo nazali elongo na bino,’+ yango nde liloba ya Yehova ya mampinga.

  • Hagai 2:21
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 21 “Lobá na Zerubabele guvɛrnɛrɛ ya Yuda+ ete: ‘Nazali koningisa likoló ná mabele.+

  • Zekaria 4:7
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 7 Ee ngomba monene, yo nani?+ Liboso ya Zerubabele+ okokóma mokili moko ya patatalu. Mpe ya solo, ye akobimisa libanga ya motó.+ Bato bakobelela+ yango ete: “Kitoko mpenza! Kitoko mpenza!”’”+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto