Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Ebandeli 1:1
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 1 Na ebandeli+ Nzambe+ azalisaki+ likoló mpe mabele.+

  • Kolimbola Mibeko 10:17
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 17 Mpo Yehova Nzambe na bino azali Nzambe ya banzambe+ mpe Nkolo ya bankolo,+ Nzambe monene, ya nguya mpe ya nsɔmɔ,+ oyo aponaka bilongi te+ mpe andimaka kanyaka te,+

  • Kolimbola Mibeko 32:31
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 31 Mpo libanga na bango ezali lokola Libanga na biso te,+

      Ata banguna na biso bakoki koloba ete ezali bongo.+

  • Ezera 1:3
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 3 Moto nyonso kati na bino nyonso bato na ye, Nzambe na ye azala na ye.+ Amata na Yerusaleme, oyo ezali na Yuda, mpe atonga lisusu ndako ya Yehova Nzambe ya Yisraele—ye azali Nzambe ya solo+—oyo ezalaki na Yerusaleme.+

  • Nzembo 145:3
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    •  3 Yehova azali monene mpe asengeli kosanzolama mingi,+

      Mpe bonene na ye ekoki kososolama te.+

  • Danyele 2:47
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 47 Mokonzi ayanolaki Danyele mpe alobaki boye: “Ya solo Nzambe na bino azali Nzambe ya banzambe+ mpe Nkolo ya bakonzi+ mpe Momonisi ya basekele, mpo omonisi sekele oyo.”+

  • Danyele 4:34
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 34 “Mpe na nsuka ya mikolo,+ ngai Nebukadenezare natombolaki miso na ngai na likoló,+ mpe mayele na ngai ekómaki kozongela ngai; mpe napambolaki Oyo-Aleki-Likoló,+ mpe nasanzolaki mpe nakumisaki Ye oyo azali na bomoi seko,+ mpo boyangeli na ye ezali boyangeli ya seko mpe bokonzi na ye ezali libota na libota.+

  • Danyele 6:26
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 26 Napesi etinda+ ete: na teritware nyonso ya bokonzi na ngai, bato basengeli kolɛnga mpe kobanga liboso ya Nzambe ya Danyele.+ Mpo azali Nzambe ya bomoi mpe ye Moto oyo azali koumela seko,+ mpe bokonzi na ye+ ezali oyo ekobebisama te,+ mpe boyangeli na ye ezali mpo na seko.+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto