Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • 2 Bakonzi 21:15
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 15 mpo basali oyo ezali mabe na miso na ngai mpe bazali kosilikisa ngai banda mokolo oyo bankɔkɔ na bango babimaki na Ezipito tii na mokolo ya lelo.’”+

  • 2 Ntango 34:25
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 25 mpamba te batiki ngai+ mpe bakei kobimisela banzambe mosusu milinga ya mbeka,+ mpo na kosilikisa+ ngai na misala nyonso ya mabɔkɔ na bango+ mpe mpo nkanda na ngai+ esopana na esika oyo mpe ezimama te.’”+

  • Nehemia 9:26
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 26 “Nzokande, bazangaki botosi+ mpe batombokelaki yo+ mpe bazalaki ntango nyonso kobwaka mobeko na yo na nsima ya mokɔngɔ na bango,+ mpe babomaki basakoli na yo,+ oyo bazalaki kotatwela bango mpo na kozongisa bango epai na yo;+ mpe bazalaki kaka kosala makambo na limemya ata moke te.+

  • Yisaya 59:2
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 2 Te, kasi mabunga na bino ekómi biloko oyo ezali kokabola bino ná Nzambe na bino,+ mpe masumu na bino moko etindi ye abombela bino elongi na ye mpo ayoka te.+

  • Yirimia 5:31
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 31 Basakoli bazali mpenza kosakola na lokuta;+ mpe banganga-nzambe bazali konyata bato na nguya na bango.+ Mpe bato na ngai balingi ezala ndenge wana;+ bongo bokosala nini na nsuka na yango?”+

  • Danyele 9:5
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 5 tosali lisumu,+ tosali libunga, tosali mabe mpe totomboki;+ mpe totiki mitindo na yo mpe bikateli na yo ya lisambisi.+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto