Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Kolimbola Mibeko 12:5
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 5 kasi bokoluka esika oyo Yehova Nzambe na bino akopona na mabota na bino nyonso mpo na kotya nkombo na ye kuna, mpo na kofandisa yango, mpe osengeli kokende kuna.+

  • Kolimbola Mibeko 12:6
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 6 Mpe kuna bosengeli komema makabo na bino ya kotumba+ mpe bambeka na bino mpe moko ya bandambo zomi+ na bino mpe likabo ya lobɔkɔ+ na bino mpe makabo na bino ya elako+ mpe makabo na bino ya bolingo+ mpe bana ya liboso ya etonga na bino ya bangɔmbɛ mpe ya etonga na bino ya bampate.+

  • Kolimbola Mibeko 12:11
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 11 Mpe ekosalema mpenza boye: esika+ oyo Yehova Nzambe na bino akopona mpo na kofandisa nkombo na ye wana, esika yango nde bokomema nyonso oyo nazali kopesa bino mitindo, makabo na bino ya kotumba+ mpe bambeka na bino, moko ya bandambo zomi+ na bino mpe likabo+ ya lobɔkɔ na bino mpe eloko nyonso ya kitoko ya makabo na bino ya elako+ oyo bokosala elako epai ya Yehova.

  • 2 Ntango 2:6
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 6 Mpe nani akoki kozala na makasi ya kotongela ye ndako?+ Mpo likoló mpe mosika kuna na likoló mpenza ekoki kokoka ye te,+ mpe ngai nazali nani+ mpo natongela ye ndako, soki ezali te kaka mpo na kobimisa milinga ya mbeka liboso na ye?+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto