Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Kobima 20:24
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 24 Okosalela ngai etumbelo ya mabele,+ mpe osengeli kopesa makabo ya kotumba mpe bambeka ya boyokani, bampate na yo mpe bangɔmbɛ na yo likoló na yango.+ Esika nyonso oyo nakosala ete nkombo na ngai ekanisama, nakoya epai na yo mpe nakopambola yo mpenza.+

  • Kolimbola Mibeko 12:5
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 5 kasi bokoluka esika oyo Yehova Nzambe na bino akopona na mabota na bino nyonso mpo na kotya nkombo na ye kuna, mpo na kofandisa yango, mpe osengeli kokende kuna.+

  • 2 Ntango 7:16
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 16 Mpe sikoyo, naponi+ mpe nasantisi ndako oyo mpo nkombo na ngai+ ezala kuna mpo na ntango oyo etyami ndelo te,+ mpe miso na ngai mpe motema na ngai ekozala mpenza kuna ntango nyonso.+

  • Nzembo 132:14
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 14 “Oyo nde esika na ngai ya kopema mpo na seko;+

      Nakofanda awa, mpo nayoki mposa na yango makasi.+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto