41 Mpe okopesa mwana-mpate ya mobali ya mibale na mpokwa, liboso molili ekɔta.* Okopesa yango ná likabo ya mbuma+ lokola oyo ya ntɔngɔ mpe ná likabo ya masanga lokola oyo wana, mpo ezala nsolo moko ya kokitisa motema, likabo moko oyo etumbami na mɔtɔ mpo na Yehova.
21 mpe ntango nazalaki naino koloba na libondeli, talá, mobali yango Gabriele,+ oyo namonaki na emonaneli na ebandeli,+ nsima ya kolɛmba makasi mpenza, ayaki pene na ngai na ntango ya likabo ya mpokwa.+