15 “‘Bosengeli te kosala na kozanga bosembo na ntango ya kosambisa. Osengeli kopona bilongi te+ ntango ozali kotalela likambo ya moto oyo azangá, mpe osengeli te kosepela kaka na moto monene.+ Okosambisa moninga na yo na bosembo.
6 Mpe azalaki koloba na basambisi boye: “Bótala malamu oyo bozali kosala,+ mpo bozali kosambisa mpo na moto te, kasi nde mpo na Yehova;+ mpe na likambo oyo etali kosambisa, ye azali elongo na bino.+