3 Mpe na bitúká ndenge na ndenge oyo eyangelami,+ epai nyonso oyo liloba ya mokonzi mpe mobeko na ye ezalaki kokóma, mawa monene+ ezalaki na kati ya Bayuda, kokila bilei,+ kolela ná koganga. Mingi batandaki ngɔtɔ+ ná putulu ya mɔtɔ+ lokola mbeto.
5 Bongo bato ya Ninive babandaki kondimela Nzambe,+ mpe basakolaki ete bákila bilei mpe bálata ngɔtɔ,+ banda na moto oyo aleki monene na kati na bango tii na moto oyo aleki moke na kati na bango.