15 Ntango bana ya Yisraele bamonaki yango, babandaki kolobana bango na bango ete: “Oyo nini?” Mpo bayebaki yango te. Na yango Moize alobaki na bango ete: “Ezali mampa oyo Yehova apesi bino mpo na kolya.+
12 Bongo, mana etikaki kokwea na mokolo oyo elandaki, ntango balyaki mwa biloko ya mokili yango, mpe mana emonanaki lisusu te mpo na bana ya Yisraele,+ mpe babandaki kolya mwa biloko oyo ezalaki kobima na mokili ya Kanana na mbula wana.+