5 Nsima na yango nalobaki na mokonzi ete: “Soki emonani malamu na miso ya mokonzi,+ mpe soki mosaleli na yo amonani malamu na miso na yo,+ tindá ngai na Yuda, na engumba ya malita ya bankɔkɔ na ngai, mpo natonga yango lisusu.”+
6 Na yango mokonzi alobaki na ngai boye, wana mwasi na ye ya lokumu afandaki pembeni na ye: “Mobembo na yo ekoumela ntango boni mpe okozonga ntango nini?” Bongo emonanaki malamu+ na miso ya mokonzi ete atinda ngai, ntango napesaki ye mokolo oyo nakozonga.+