Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Kobima 20:10
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 10 Kasi mokolo ya nsambo ezali sabata mpo na Yehova Nzambe na yo.+ Osengeli kosala ata mosala moko te, ezala yo, ezala mwana na yo ya mobali, ezala mwana na yo ya mwasi, ezala moombo na yo ya mobali, ezala moombo na yo ya mwasi, ezala nyama na yo ya mboka, ezala mopaya oyo afandi na yo oyo azali kati na baporte na yo.+

  • Kobima 34:21
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 21 “Mikolo motoba okosala mosala, kasi na mokolo ya nsambo okotosa sabata.+ Na ntango ya kobalola mabele mpe na ntango ya kobuka mbuma okotosa sabata.+

  • Kobima 35:2
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 2 Mikolo motoba mosala ekoki kosalema,+ kasi na mokolo ya nsambo, yango ekokóma eloko moko mosantu mpo na bino, sabata ya kopema mpenza mpo na Yehova. Moto nyonso oyo akosala mosala na mokolo yango akobomama.+

  • Yisaya 58:13
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 13 “Soki mpo na sabata ozongisi lokolo na yo nsima mpo na kosala makambo oyo ezali kosepelisa yo na mokolo na ngai mosantu,+ mpe soki ya solo obengi sabata bisengo mpenza, mokolo mosantu ya Yehova, mokolo oyo ezali kokumisama,+ mpe soki ya solo okumisi yango na esika ya kotambola na banzela na yo moko, na esika ya komona makambo oyo ezali kosepelisa yo mpe na esika ya koloba liloba ya mpamba;

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto